Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Malangu Kabedi, mwasi ya yambo, atiami na bokambi Banque centrale ya RDC


Malangu Kabedi -Mbuyi atiami mokambi ya Banque centrale ya Congo le 7 juillet 2021, ezwami na son copmte Twitter na ye.
Malangu Kabedi -Mbuyi atiami mokambi ya Banque centrale ya Congo le 7 juillet 2021, ezwami na son copmte Twitter na ye.

Malangu Kabedi-Mbuyi atiami lundi na mpokwa na ebonga ya gouverneure (mokambi) ya Banque centrale ya RDC (BCC).

Atiami na ebonda M. Déogracias Mutombo mpe akomi mwasi ya yambo ya kozwa esika ya kobateli Banque centrale ya Congo wuto bokelami bwa yango le 30 juillet 1951.

Tata mokonzi a aboni mama Malangu B=Kabedi-Mbuyi mpo na kotambwisa Banque centrale ya congo. Mwasi ya bokeseni. Azali mokeli mpe mokambi ya mission ya Fonds monétaire internationale na Cap Vert mpe na Burkina Faso, ekomi molobeli ya mbulmatari articik Muyaya na Facebook na ye.

Botiami boye boalkisi emoniseli ya mokonzi ya mboka ya kopesa basi esika monene na mabonga minene, ebakisi M. Muyaya.

Mme azali 12e gouverneure ya BCC kais mwasi ya yambo, eyebisi molobeli molandi ya président Félix Tshisekedi, Tina Salama.

Deogracias Mutombo oyo Mme Malangu akitani na ye, atiami PCA ya Autorité de Régulation des Assurances (ARC).

XS
SM
MD
LG