Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

PM Ilunga asengi na CACH na FCC babongisa ba listes na bango


Premier ministre ya sika Sylvestre Ilunga Ilunkamba na bokutani na président Félix Tshisekedi na Cité ya Union africaine, na Kinshasa, 20 mai 2019. (Twitter/Présidence de la RDC)
Premier ministre ya sika Sylvestre Ilunga Ilunkamba na bokutani na président Félix Tshisekedi na Cité ya Union africaine, na Kinshasa, 20 mai 2019. (Twitter/Présidence de la RDC)

Premier ministre Sylvestre Ilunga Ilunkamba asengi na mangomba CACH ya président Tshisekedi mpe FCC ya mokonzi ya kala Joseph Kabila bapesa ye ba listes misusu miye mikolanda ba critères apesaki bango.

"Premier ministre azali kolikya ete bakopesa ye lelo to lobi mosala moye kati na yango mbeba esembolami, mosalami malamu mpe mosala mondimisami na structure ya décision ya mangomba moko moko," ekomi Ilunga Ilunkmba na liyebisi abimisi o'mokolo ya mitano.

Na liyeibisi yango, Premier ministre asemboli ete azongiselaki CACH na FCC, kaka mokolo azuwaki yango, mikanda ya ba nkombo ya baye bokoki kozala na gouvernement miye mangomba mabale maye mapesaki ye.

Ezalaki le 11 août 2019.

Kolanda mokambi ya misala ya communication ya Premier ministre, parité (bokokani ya basi na mibale), bilenge mpe makambo masusu mazali boko ya makambo CACH na FCC bakokisi te na mikanda ya bankombo bapesaki Premier ministre.

Esengelaki gouvernement ya sika esakolama mardi, kolanda linaka ya PM, kasi esalamaki te.

PM Ilunga apesaki le 7 août 2019 na CACH na FCC linaka ya botiyami ya gouvernement.

CACH na FCC bapesaki PM bankombo mokolo ya eyenga le 7 août 2019.

XS
SM
MD
LG