Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Nzoto ya cardinal Monsengwo ezongisami Kinshasa


Cardinal Laurent Monsengwo Pasinya na Rome, 28 juillet 2013. (“AFP PHOTO/OSSERVATORE ROMANO")
Cardinal Laurent Monsengwo Pasinya na Rome, 28 juillet 2013. (“AFP PHOTO/OSSERVATORE ROMANO")

Nzoto ya cardinal Laurent Monsengwo Pasinya etiami na cathédrale Notre Dame ya Lingwala mpo na milulu yambo na komemama le 20 juillet 2021 na Palais du palais, ndako ya Parlement akambaka nsima na Conférence nationale souveraine atambwisaka. Kuna nde akopesama losako ya suka.

Nzoto ya cardinal Laurent Monsenwo Pasinya ezongisami Kinshasa o'mokolo mwa eyenga na libandela lya mpokwa, na kowuta na Paris, na France epayi wapi akufaki le 11 juillet.

Yambo na botiami na yango ya Palais du peuple, nzoto yango etiami na bombobami na ndako ya malili ya lopitalo St Joseph na Limete.

Cardinal Monzengwo awaki na mibu 81 nsima na Versailles pene na Paris, epayi wapi amemamaki le 5 juillet na bokono mpo na lisalisi.

Episkopoko ya lokumu ya kala ya Kinshasa nsima na kozala na ebonga moko wana na diocièse ya Kisangani na Tshopo, cardinal Monsengwo apesamaki lokumu mpe losako ya suka, na bozondisami bwa ye, na bituluku na bato na cathédrale Notre Dame ya Lingwala epayi nzoto na ye etiami.

Bakambi ba mbulamatari bapesaki mpe lokumu.

Nzoto ya cardinal Monsengwo ekotiama mardi le 23 na Palais du Peuple, ndako ya parlement akambaka nsima na conférence nationale souveraine atambwisaka.

Nzoto na carindal Monsengwo ekotikama na cathédrale Notre dame epayi ba cardinaux basusu, Joseph Malulu mpe Frédéric Etsou.

Bato mingi bakinisi bo' moko na baye babundaki mpo démocratie, bosembo mpe bolamu ya bana mboka na RDC.

Papa wa Roma, François, apesaki ye losako mpo na yango bo' "moto na mpiko".

XS
SM
MD
LG