Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi apesi mitindo bakanga Gédéon Kyungu Mutanda


Président Félix Tshisekedi azali kokamba likita lya bokengi na Cité de l'Union africaine, Kinshasa, 30 mars 2020. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi azali kokamba likita lya bokengi na Cité de l'Union africaine, Kinshasa, 30 mars 2020. (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi apesi mitindo ete misala ya bokengi mpe mampinga baluka mpe bakanga na lombango Gédéon Kyungu Mutanda, mokambi ya lingomba ya basimba miduki bamibengami Bakata Katanga nsima na mobulu mobomi bato pene na 40 na Haut-Katanga.

Gédéon Kyungu Mutanga akimaki na bokengelami na ndako o’mokolo mwa mposo ntagno babundi baye bakotaki na bingumba mingi mpe babundisaki ba policiers mpe mampinga na Haut-Katanga.

Mobulu mwango mosalamaki na Lubumbashi, Likasi, Lowango, Pueto, Kasumbalesa mpe bisika misusu.

Mokano mwango mosakolamaki nsima na likita monene président Félix Tshisekedi akambaki lundi na Cité ya Union africaine ya Kinshasa na bakambi ya mampinga mpe misala ya bokengeki.

Bayi makoki ya bomoto ba balobi ete "Bakata Katanga" pene na tuku minei bakufaki na bitumba ya mokolo na mposo.

Kasi bakambi ya 22e région bapesi motango mpe balobi nde batomboki mingi bazokaki mpe bakangami.

XS
SM
MD
LG