Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Prince héritier ya Emirats alaki Tshisekedi kotia 1 milliards $ na RDC


Président Félix Tshisekedi (G) na masaolo na bakonzi ya Emirats arabes unis nsima na bokomi bwa ye na Abu Dhabi, 9 octobre 2021. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi (G) na masaolo na bakonzi ya Emirats arabes unis nsima na bokomi bwa ye na Abu Dhabi, 9 octobre 2021. (Facebook/Présidence RDC)

Prince héritier ya Emirats Arabes unis Ben Zayed Al-Nahyane alaki kotiya milliard moko ya ba dollars na misala na Ekolo Congo démocratique.

Ayambaki mokolo mwa eyanga président Félix Tshisekedi ya RDC oyo azali na mobembo na Emirats Arabes unis wuta mokolo mwa mposo mpo na masolo na ntina ya koluka misolo ya kosunga kotonga mboka na ye, ekolo Congo démocratique.

Mokambi molandi ya mampinga ya Emirats azalaki mpe na masolo ma bango, maye matalaki mpe boyokani mpe botieyi misolo na kotonga, na lotiliki, bokolongono, ba mines mpe bokengi.

Président Tshisekdi akutani o’mokolo yambo na limpinga lyoko lya Chambre du commerce ya Adu Dhabi.

Bayi mombongo bayebisi ete balingi mombongo kati na bikolo mibale mikola.

Limpinga lyango lilaki kokita na Kinshasa mikolo mikoya.

XS
SM
MD
LG