Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi : "libala FCC-CACH ezali kokende na kokufa te"


Félix Tshisekedi na masolo na mokokani wa ye Denis Sassou N'Guesso ya Congo-Brazzaville, na Brazzaville, 16 juillet 2020. (Présidence Congo-Brazzaville)
Félix Tshisekedi na masolo na mokokani wa ye Denis Sassou N'Guesso ya Congo-Brazzaville, na Brazzaville, 16 juillet 2020. (Présidence Congo-Brazzaville)

Président Félix Tshisekedi ayanolaki mpo etali libala ya bokambi mboka kati na CACH, lingomba na ye, na FCC, lingomba ya mokonzi ya kala Joseph Kabila.

Alobi yango na eyenao apesaki bapanzi sango na suka ya mobembo ya mokolo moko asalaki na Brazzaville mpo na kosolola na président Denis Sassou N’Guesso.

Tshisekedi alobi pene na Sassou ete CACH na FCC ya Kabila ezali kokabwana te (Vidéo)
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:01:13 0:00

"Tozali te kokende na bokabwani ya boyokani, wana tembe eza te.. Na ntango eye, ezali na batindami ba mangomba ma biso mabale bazali kosolola mpo na kobongisa nzela, kotala lolenge nini kotala makambo ndenge moko,,, Ezali mpo démocratie na biso ezali elenge… Esengeli te bato bayoka mpasi… ," elimbolaki M. Tshisekedi.

"Oyo eleki motuya ezali tobala bolamu ya mboka mpe na kanisi été ba moko na basusu bayebi yango. Mpe suka suka tokozwa eyano," ebakisaki ye.

Bituluku na bato bakitaki o’balabala le 9 juillet na bosengi ya UDPS, lisanga ya politiki ya M. Tshisekedi, mpo na kotelemela bo ndimami na Assemblée nationale ya boponami ya Ronsard Malonda bo’ mokambi ya CENI.

UDPS na batamboli batelemelaki mpe mibeko misato mibongisami na Assemblée nationale na bobandisami ya ba députés Aubin Minaku na Garry Sakata ya FCC.

Tshisekedi alimboli pene na Sassou mpo etali boyokani na FCC ya Kabila
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:00:45 0:00


Bayi UDPS ba tumbaki mpe babukaki ndako ya PPRD, ya M. Kabila na ya Parti travailliste ya FCC.

Bayi FCC nde baleki na motango na Assemblée nationale. UDPS ezali kofunda bango na koluka komema makambo mpo na bolamu ya FFC.

Sanza moko moleki, mingi na ba keli mibeko bakweyisaki Jean-Marc Kabund na ebonga ya 1er vice-président ya Assemblée nationale.

Bitumbu bingalaka mbala mingi kati na bayi FCC na CACH.

XS
SM
MD
LG