Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Policier abetamaki na botamboli ya UDPS akufi


Moko na batelemeli azali koswana na policier moko pene na Parlement, na Kinshasa, 24 juin 2020.
Moko na batelemeli azali koswana na policier moko pene na Parlement, na Kinshasa, 24 juin 2020.

Moko na bayi pulusu abetamaki na book nab aye batambolaki o’mokolo mwa le 9 juillet na bobengisami bwa UDPS, akufi, elobi Police nationale ya Congo.

"Policier Kisota Tigana ya poste ya poste Kanda Kanda oyo abetamaki mabe le 9 juillet na bato ba yawuli, mpe akotaki lopitalo central ya référence ya PNC/Camp Lufungula, na ba urgences, awuti kozongisa molimo na ye na ntongo (mercredi)," ekomi Police nationale na compte Twitter na yango.

"Mawa kati na PNC," ebakisi liyebisi.

Police nationale esembolaki koloba été policer oyo akufaki te mokolo molandaki milulu ya kotelemela bondimami ya boponami ya Ronsard Malonda bo’ mokambi ya CENI.

Bato babale nde bakufaki kati baye balingaki koyeba mpe kopunza, elobaki PNC.

Mbulamatari na UDPS basengi boluki nsima na nzoto nzite kozwama na Lubumbashi
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:00:49 0:00

Na ba civils babale baye bakufaki, moko azalaki na Kinshasa mpe mosusu na Lubumbashi ebakisa PNC.

UDPS, lingomba lya mokonzi ya mboka elobaki bato batano nde bakufaki.

O’mokolo mwa mposo nzoto ya bato basato elokotamaki na mayi moko na Lubumbashi, na Haut-Katanga.

Mbulamatari esangaki bolukiluki mpe UDPS mpe esengaki kozela na kimya bilembo na yango.

XS
SM
MD
LG