Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Trump andimi Etats-Unis epesa etumbu na CPI mpo na koluka kolandela ba soda ya Amerika


 President Donald Trump (G) azali kotambola na bayi bokengi pene na ndako ya Nzambe St Jean, na Washington, 1er juin 2020.
President Donald Trump (G) azali kotambola na bayi bokengi pene na ndako ya Nzambe St Jean, na Washington, 1er juin 2020.

Donald Trump apesi ndingisa mpo ete Etats-Unis epesa etumbu ya nkita na bakambi banso ya Cour pénale internationale (CPI) baye bazali kolandela ba soda ya Amerika to koluka kokatela bango etumbu eye USA endimi te.

"Ata Etats-Unis na ba alliés basengi mbongwana mbala mingi, Cour pénale internationale esali eloko te mpo kosala yango mpe mpo na kokoba bolukiluki botindami na politiki likolo na biso mpe basungi babiso, Israël," elobi molobeli mwa Maison Blanche na liyebisi.

Na sanza ya misato (mars) CPI endimaki mokano ya kopesa ndingisa ya kobanda boluluki mpo na mbeba ya bitumba mpe mbeba ya bomoto mpo na bitumba na Afghanistan ata mbulamatari etelemelaki yango.

Fatou Bensouda, procureure ya CPI, asengaki balendela monyokoli ba soda ya Amerika bafundami na kosala na Afghanistan epayi wapi Etats-Unis ezali na biutmba wuto 2001.

CIA, misala ya bokengi ya Etats-Unis mpo na libanda, efundami mpe na monyokoli.

M. Trump azali kopemala CPI na kotambola likolo na bonsomi ya Etats-Unis.

Mokonzi ya Etats-Unis asengaki bopekisa ya visa na bakambi ya CPI.

XS
SM
MD
LG