Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bureau d’âge etiami na Sénat kasi rapporteur adjoint ya Bureau définitif ya Thambwe Mwamba atiki mosala


Ba Sénateurs na ndako ya mosala na bango na Palais du peuole, Kinsahsa, 25 mai 2009.
Ba Sénateurs na ndako ya mosala na bango na Palais du peuole, Kinsahsa, 25 mai 2009.

Bureau d’âge ya Sénat etiami. Ba sénateurs tuku motoba na minei nde bazalaki na likita lyango na ndako ya Sénat na Kinshasa.

Bureau d’âge ya Senat ekokamba na Léon Mamboleo oyo aleki na mibu. Akosungama na Vitcorine Lwese mpe Reagan Ilanga baye bazali na mibu y anse koleka. Nzoka nde.

Rapporteur adjoint to molobeli molandi ya Sénat apesi mokanda mwa ye ya botiki mosala na Bureau d’âge ekambami na Léon Mamboleo.

Bayi Bureau banso bazali balandelami na ba pétitions to mikanda baninga ba bango basengi bolongwi na bango.

Kaka Samy Badibanga, mokambi molandi wa yambo ya Sénat nde apesamelaki pétition te.

Lobi loleki, Alexis Thambwe Mwamba na Bureau na ye baboyaki bosalami bwa likita lyango na kolobaka ete ba Sénateurs bazali na loyi.

Likambo lya lisama lokola liye lisalamaki na assemblée nationale na sanza ya zomi na mibale moleki yambo na bokweyisami ya bakambi ya Bureau défitinif na mopepe ya Union sacrée liboke lya sika président Félix Tshisekedi azali kokela mpo na majorité ya sika. Bureau définitif mosusu eponamaki na Assemblée nationale lobi mercredi.

Nzokande, Inspecteur général ya Finances apesi mikolo mitano na Questeur ya Sénat, molandi waye, mosimbi libenga mpe na Comptable wa yambo kolimbola ndenge koleka 107 milliards ya FC esalelamaki wuto Janvier 2019 kino suka ya 2020.

Bureau définitif ekamba na Alexis Thambwe eboyaki boluki bosalama mpo misolo kolaka millions misato y aba dollards ememamaki na ndako ya mokambi ya Senta esi ezongisamaki na libenga ya Senat.

XS
SM
MD
LG