Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Parquet ezali kolukisa Kalev Mutondo


Kalev Mutond, mokambi ya kala ya ANR (agence nationale de renseignement) awa na Goma, RDC, 25 janvier 2917. (VOA/Charly Kaseraka)
Kalev Mutond, mokambi ya kala ya ANR (agence nationale de renseignement) awa na Goma, RDC, 25 janvier 2917. (VOA/Charly Kaseraka)

Procureur général ya Cour d’appel ya kinshasa/Gombe abimisi mokanda ya kotinda boluki ya mokonzi ya kala ya ANR (Agence nationale ya renseignements), Kalev Mutondo nsima na boboyi na ye koyanola mbala mibale na bobengisa bwa ye.

"Boluka makasi moto abengami Kalev Mutondo, ADG (mokambi) ya ANR," ekomi na mokanda yango procureur général Bonheur Luntaka Madi.

Mokanda mwango motindami na misala mya bokengi lokola DGM (Direction générale ya migration), BCN-Interpol mpe na police ya RDC.

"Moto yango alandemami mpo na mbeba ya kokanga bato pamba pamba mpe totia bango na kokangami na kobuka mobeko na minyoko na nzoto mpe kobotola biloko," ebakisi procureur général.

Na ngambo na ye, Kalev Mutondo alobi ete basoda na minduki bazali Nzinga Nzinga ya ndako na ye mpe ya mwana na ye oyo azali mokeli mibeko, Isabelle Ihemba Kayombo.

Basoda bango bakotaki na ndako yango mpe balukaki bisika binso.

Kalev Mutondo ayanolaki te mercredi na mbela ya magistrat na parquet. Ezalaki mbala ya mibale ayanolaki te.

Kalev Mutondo akomelaka Cour ya cassation mpo kaboya avocat général Robert Kumbu Phanzu azali kolandela ye mpo azalaki OPJ ya misala mya bokengi.

Mpo na M. Kalev ezali moto na ye nde bazali koluka mpa asalaki manso na nzela ya mosala na ye mpe na ndenge ya malamu, alobaki na radio Okapi.

XS
SM
MD
LG