Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kalev asengi balongola magistrat azali kolendela ye na enquête


Kalev Mutond, mokambi ya kala ya ARN (Agence nationale ya rensiegnements) ya RDC, septembre 2019. (Twittwer/Kalev Mutond)
Kalev Mutond, mokambi ya kala ya ARN (Agence nationale ya rensiegnements) ya RDC, septembre 2019. (Twittwer/Kalev Mutond)

Kalev Mutondo, mokonzi ya ANR (Agence nationale ya renseignements) akendaki te na mbela ya parquet ya Kinshasa/Gombe mardi kasi asengi bolongwi na bolukiluki ya magistrat azali kolandela ye.

M. Kalev akomeli procureur général ya Cour ya cassation na copie na procureur général ya Cour d’Appel ya Kinshasa/Gombe.

Akundoli ete mokambi ya sika ya ANR apesaki ndingisa te ete alendelama na eyano asengaki.

Kasi, magistrat Robert Kumbu Phanzu akobi kolandela ye ata mokambi ya sika ya ANR aboyi.

M. Kalev akundoli na mokanda na ye ete magistrat Kumbu azalaki mibu mingi mopesi toli ya politiki ya DG ya DGM (Direction générale ya mgration) mpe atiakamaki bo’ OPJ (Officier ya police judiciaire) ya misala mya boluki lokola mpe ya ANR.

Mpo na yango, M. Kalev alobi M. Kumbu akoki te kolandela ye.

M. Kalev akamwe mpe lisusu ete ayoki na ba réseaux sociaux ete ba dossiers judiciaires mibale efungwama mpo na ye.

Mposo moleki, magistrat Kumbu atindelaki M. Kalev mokonda ya kobengisa mpe na kati ekomamaki été soki atosi te mobeko mokokisama na makasi.

Ezalaki mbala ya mibale M. Kalev abengisamaki kasi ayanoli te.

XS
SM
MD
LG