Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Jean-Florent Ibenge azongi sélectionneur ya ba Léopards A’


Florent Ibenge, sélectionneur ya équipe ya RDC, na Oyem, Gabon, le 15 janvier 2017.
Florent Ibenge, sélectionneur ya équipe ya RDC, na Oyem, Gabon, le 15 janvier 2017.

Jean-Florent Ibenge azongi na ebonga ya sélectionneur ya ba Léopards A’ ya ndembo ya makolo, kolanda mokano mwa FECOFA (Fédération congolaise ya Football Association).

"Sélectionneur national, molongi ya CHAN Rwanda 2013, akomema ba Léopards A’ na phase finale ya Championnat ya Afrika ya bikolo ya mbala motoba, eye ekopetama wuto le 16 janvier kino le 7 février 2021," esakoli FECOFA na site internet na yango.

Coach Ibenge atikaki mosala ya bokambi équipe nationale senior A-Pro ya RDC mobu moleki nsima na bolongwi ya ba Léopards na quarts de finale ya CHAN ya 2019 na Egypte.

Atikalaki kaka kokamba AS V.Club ya Kinshasa mpe kosala misala misusu na fédération.

Lokola sélectionneur ya ba Léopards A’, akosungama na Pamphile Mihayo mpe Daula Lopembe.

Ba gardiens nde bakokangambama na Eugène Bulayima.

FECOFA eyebisi ete etie na esika staff technique ya équipe nationale mpo na kobongisa CHAN mpe phase finale ya Championnat d’Affrique des nations ":Cameroun 2020 »"

Cameroun na Zimbabwe bakobeta match ya liboso ya Championnat ya Afrika ya bikolo.

RDC ekokota na championnat yango le 16 janvier na match na Congo-Brazzaville le 16 janvier na stade Japon ma na Douala.

RDC esi elonga CHAN mbala mibale, na 2009 mpe 2016. Mbala eye ezali na groupe B na Congo-Brazzaville, Niger mpe Libye.

XS
SM
MD
LG