Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

CHAN Cameroun 2021: RDC na Congo-Brazzaville baleki na ¼ ya finales


Basani ya Léopards ya RDC basepeli nsima na elonga na bango 4-0 liboso na Zimbabwe na Caire, Egypte, 30 juin 2019.
Basani ya Léopards ya RDC basepeli nsima na elonga na bango 4-0 liboso na Zimbabwe na Caire, Egypte, 30 juin 2019.

Ba Léopards ya RDC na ba Diables rouges ya Congo-Brazzaville baleki na ¼ ya finales ya CHAN 2020 na Cameroun nsima na elonga bazwi, ngambo na ngambo, liboso ya Niger mpe Libye lundi.

Ba Diables rouges nde basali bikamwa na kowuta na elongo ya suka mpe koleka na esika ya mibale.

Basani ya Congo-Brazzaville bazwi elonga na bango ya yambo lundi 1-0 liboso ya Chevaliers ya Méditerranée ya Libye na nzela ya mongete Gautrand Ngouenimba na minute ya 50.

Elonga eye epesi ba Diables rouges nzela ya kokoma na bilembo minei, liboso lya Niger (2 pts) mpe Libye (2 pts).

Ba Léopards nde balendisi elikya na bango mpo bazali na bilembo minei (4) yambo na matche na bango ya lungi liboso ya Mena ya Niger.

Basani ba RDC bakomi na bilembo sambo (7) nsima na elonga na bango likolo na Mena ya Niger.

Ba Léopards balongi na mongete ya suka nantango Amedé Masasi atiaki na 90+1’.

Nzoka nde Niger ekomaki n mwa elikya nsima na kotia mongete na 73’ na Mossi Issa Moussa mpe kokokana na ba Léopards.

Ba Congolais ya RDC bafungola to baningasaki monyama na 27’ na Kadima Kabangu.

Ba Léopards bakokutana na ba Lions ya Cameroun, esika momeko moye mozali kobetama.

Ba Diables rouges nde bakondongwana na Mali.

XS
SM
MD
LG