Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sénat eboyi kokweyisa Donald Trump


Président Donald Trump azo' na Maison Blanche, Washington DC, 6 février 2020.
Président Donald Trump azo' na Maison Blanche, Washington DC, 6 février 2020.

Sénat eboyi kokweyisa président Donald Trump na bosambisamaki na ye nsima na bofundami ya kosalela bokonzi na ndenge ya koleka. Bofundami na na ye bokweyisama

Ba Sénateurs 53 baboyaki kokweyisama ya Trump mpe 47 bandimaki yango. Mingi na baye baboyaki bazalaki ba républicains.

Ba démocrates nde bandimaki yango.

Président Trump afundamaki mpo na kosenga bakonzi ya Ukraine kopakolo potopoto na vice-président ya Etats-Unis, Joe Biden, moko na ba démocrates oyo akoki kowelela bokonzi maponami ya mokonzi ya mboka na novembre 2020.

M. Trump abengaki bosambisi yango "bozangi sembo" ya ba démocrates.

XS
SM
MD
LG