Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi apesi losako na bawei ya génocide na Rwanda


Président Félix Tshisekedi na monument ya ba wei ya génocide ya Rwanda, le 25 mars 2019. (Facebook/Fatshi News)
Président Félix Tshisekedi na monument ya ba wei ya génocide ya Rwanda, le 25 mars 2019. (Facebook/Fatshi News)

Mokonzi ya sika ya ekolo RDC atiki fololo mpe akomaki maloba na buku ya kokanisa ba wei ya bobomani monene na Rwanda, na monument oyo atalaki o'mokolo mwa lundi.

Président Félix Tshisekedi azalaki na bofungwami ya 7e edition ya Africa CEO Forum na Kigali, na Rwanda esika wapi akomaki lobi moleki. Azali elongo na mokokani wa ye ya Rwanda, Paul Kagame.

Basololaki lobi moleki nsima ya bokomi na ye na engumba mokonzi ya Rwanda.

Mokonzi ya sika ya RDC apesaki losako lelo na bawei ya genocide ya Rwanda na monument liye atali.

Akozuwa maloba na bokutani Africa CEO Forum mpo na kotalisa lolenge ya kosalama misala ya nkita na mboka Congo démocratique.

XS
SM
MD
LG