Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mokambi ya ba FDLR akufi na Allemagne


Igance Murwanashyaka, mokambi ya ba FDLR, na bokutani na bapanzi sango, Rome, 31 mars 2005.
Igance Murwanashyaka, mokambi ya ba FDLR, na bokutani na bapanzi sango, Rome, 31 mars 2005.

Ignace Murwanashyaka, mokambi ya ba FDLR, chef politique ya batomboki hutu rwandais akufi na boloko na Allemagne.

M. Murwanashyaka ya mboka Rwanda, azalaki kozela batala lisusu condamnation na ye mpo na bobomi mpe mbeba misusu na RDC.

Akufi na mibu 55 kasi bokono bobomi ye moyebani naino te.

Tribunal ya Stuttgrat ekatelaki ye mibu 13 ya boloko na 2015, kasi Cour fédérale ya karlruhe eboyaki condmnation liye mpo na ba erreurs juridiques.

XS
SM
MD
LG