Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Secrétaire d’Etat adjoint ya Etats-Unis akokoma na RDC le 13 mars


Secrétaire d’Etat adjoint ya Etats-Unis mpo na mambi ya Afrika, Tibor Nagy, na Addis Abeba, Ethiopie, 30 novembre 2018.
Secrétaire d’Etat adjoint ya Etats-Unis mpo na mambi ya Afrika, Tibor Nagy, na Addis Abeba, Ethiopie, 30 novembre 2018.

Secrétaire d’Etat adjoint ya Etats-Unis mpo na mambi ya Afrika, Tibor Nagy, akosala mobembo na RDC banda le 13 tii le 15 mars.

Akokutana mokonzi ya mboka ya sika, Félix Tshisekedi, na baye ya société civile mpe baye bazali na misala mingi ya politiki ya mboka RDC.

Mobembo yango mozali mingi mpenza mpo na kokolisa bokambi ya malamu (bonne gouvernance), démocratie mpe boyokani (coopération) kati na Etats-Unis na RDC.

Tibor Nagy akokende mpe lisusu na Belgique, na Cameroun, na France, na Rwanda mpe na Ouganda.

Mposo moleki, ntoma to Envoyé spécial ya Etats-Unis mpo na région ya Grands Lacs, Peter Pham, azalaki na Kinshasa epayi wapi akutanaki na président ya sika Félix Tshisekedi.

M. Pham asololaki mpe na opposant Martin Fayulu, na baye ya politiki basusu mpe baye ya société civile.

Juedi na Bruxelles, M. Pham akutanki mpe na opposant Moïse Katumbi.

Envoyé spécial ya Etats-Unis ayebisi ete Etats-Unis ezali kozela mingi kosala na gouvernement ya sika mpe kopesa maboko na Congo.

M. Pham alimbolaki ete etumbu Etats-Unis epesaki na bakambi ya CENI, président ya kala ya Assemblée nationale mpe président ya Cour constitutionnelle mposo moleki, ezali kolanda politi ya kokamba malamu mpe kobundisa kaniaka oyo président Félix Tshsiekedi abandi kosalela.

Etats-Unis epekisi baye bazuwi etumbi liye koniata makolo mabele ya Amerika, bango elongo na mabota na bamgo.

XS
SM
MD
LG