Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi na Kagame balobi bakosala mpo na integration régionale


Président Paul Kagame ya Rwanda (g) na mokokani wa ye ya RDC, Félix Tshisekedi, na African CEO Forum, na Kigali, Rwanda, 25 mars 2019. (Twitter/Présidence RDC)
Président Paul Kagame ya Rwanda (g) na mokokani wa ye ya RDC, Félix Tshisekedi, na African CEO Forum, na Kigali, Rwanda, 25 mars 2019. (Twitter/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi ya RDC na mokokani wa ye ya Rwanda, Paul Kagame, balobi na milulu ya suka ya bokutani Africa CEO Forum, ete bakosala lisanga mpo na intégration régionale (bosangisami mpo ya bolamu).

Bakonzi mibale baye bazwaki maloba liboso ya ba investisseurs, ya bato ya mombongo mpe ya bakambi ya ba companies mpe bayanolaki na mituna.

"Esengeli toloba na bosolo. Mpe namoni epayi ya président Kagame bolingo ya kokende liboso. Kobunda ezali kolekisa ntango oyo tokoki kosalela mpo na kotonga", elobi M. Tshiskedi.

"Tozali na bosenga ya kosala makambo mibale na ntango moko, kopekisa to koboya koswana (conflit) mpe kopesa maboko mbala moko na intégration régionale (bosangisami mpo ya bolamu ya etuka)", elimboli M. Kagame.

Na ngambo na ye, M. Tshiseke apesaki losako na M. Kagame mpo na makanisi na ye ya "libre échange". Mpe alobi ete mokolo moko likanis liye ekokisama.

Mokambi ya ekolo RDC alobi ete ekolo ya ye ekoki kosalisa, ndakisa, mpo na oyo etali mayi. Mpo na ye, bakoki kozuwa mayi ya ebale ya Congo pene na embouchures (bokutani ya ebale na mbu) mpe komema yango na ba mboka maye bazali na bosenga. M. Tshisekedi aboyi ete bazwa mayi ya Ubangi mpo ekozala na mbano mabe na lotiliki ya Inga mpe na ba tourbieres mabetalaka mokili na gaz carbonique.

XS
SM
MD
LG