Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Russie ekobanda komeka mangwele ya COVID-19 na juin


Président Vladimir Poutine ya Russie apesi mboka na mokambi ya lopitalo ya bakoni ya COVID-19 na Moscou, 24 mars 2020.
Président Vladimir Poutine ya Russie apesi mboka na mokambi ya lopitalo ya bakoni ya COVID-19 na Moscou, 24 mars 2020.

Mokambi ya moko na ba centres ya recherche ya Russie ayebisi président Vladimir Poutine ete laboratoire na ye emibongisi mpo na kobanda komeka mangwele experimental ya coronavirus ya sika na sanza ya motoba.

Rinat Maksyutov, mokambi Centre ya virologie mpe biotechnologie ya l’Etat ya Vektor asakoli ete misala mya ye mizala kokanisa kobanga bomeki étape ya yambo ya mangwele misato kobanda le 29 juin na ba volontaires (baye balingi) 180.

Alobi yango na vidéo conférence na M. Poutine elongo na bakambi ya ba centres ya recherche misusu ya Russie.

"Lipinga moko ya baye balingi limibongisami," alobi na M. Poutine.

"Tosili kozwa bakombo ya bato 300 baye balingi", esakoli M. Maksyutov.

Lisako lyango lisalami ntango na Afrika bato batelemeli bomeki bwa mangwele mango. Mingi penza nsima na ba chercheurs babale ya Poto kosakola na interview ete esengelaki kobanda yango na mboka ya bato bayindo epayi wapi bato bazali komibatelema malamu te mpe bazali na makoki mingi te.

Na RDC, Dr. Jean-Jacques Muyembe, mokambi ya bitumba na COVID-19 mpe motambwisi ya INRB (Institut des recherches biomedicales) azongaki nsima na malabo maye mikolo mibale mileki nsima na kosakola ete ekolo ekolo ya Congo démocratique eponamaki mpe mpo na kobanda komeka mangwele mango na juillet.

Dr. Muyembe abongisaki maloba nsima na nkanda ya bato bayike na ba réseaux sociaux. Asakolaki ete azali mwana mboka mpe akolinga te ba Congolais bazala ba cobailles soki mangwele mango mamekami te yambo na mboka ya poto.

Na Etats-Unis mpe na Chine, mangwele mango mazali komeka kasi na bato moke yambo endimama mpo na komekama na bato mingi.

XS
SM
MD
LG