Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Gombe ekangami


Boulebard ya 30 juin na Kinshasa, 19 décembre 2016.
Boulebard ya 30 juin na Kinshasa, 19 décembre 2016.

Commune ya Gomba na engumba ya Kinshasa ekangami wuta lelo mokolo mwa yambo mpo na kopekisa bobanzani bwa bokono bwa coronavirus ya sika COVID-19. Police mpe bayi bokengi batiyami na bokoti bonso ya commune eye.

"Nyonso ezo’ leka malamu. Toyebisi police eyeba kotika bato baye bazali ba badges spéciaux lokola basali ya banque kokota," elobi mokambi ya engumba Kinshasa, Gentiny Gobila.

Na ngambo na ye ministre ya Environnement mpe ya Développement durable, Claude Nyamugabo ntango eye ekozala mpo na kotiya nkisi ya koboma microbes.

Gombe, centre ya misala ya engumba mokonzi ya RDC, ezali nde épicentre to esika bokono boye bozwami mingi koleka, eyebisi Dr. Jean-Jacques Muyembe, mokambi ya Cellule technique nationationale ya bitumba na COVID-19.

Nzando mpe bisika misusu ya mosala misali te.

Ndenge moko mpe bingumba bya Beni, Butembo na Goma na Nord-Livu bikangami.

Motango mwa baye bayebani kozwama na COVID-19 na ekolo Congo démocratique mokomi nkama moko na tuku motoba na moko, bato zomi na mwambe bakufi, mitano babiki mpe tuku mitano na minei bazali na nzela ya kobika.

Nzokande bato sambo ya sika bazwami na yango na Kinshasa, kolanda bulletin ya bakambi ba bitumba na COVID-19 na RDC.

XS
SM
MD
LG