Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba Léopards babetami lisusu fimbu na CAN 2019 na ba Pharaons (0-2)


Yannick Bolasié ya RDC (D) azali kondongwana na Tarek Hamed ya Egypte, na Caire, na Egypte, 26 juin 2019.
Yannick Bolasié ya RDC (D) azali kondongwana na Tarek Hamed ya Egypte, na Caire, na Egypte, 26 juin 2019.

Equipe nationale ya ekolo Congo démocratique ezwi fimbu ya mibale mercredi liboso ya Eyypte (0-2) na phase finale Coupe d'Afrique des Nations na ezali kobetama na Egypte.

Ba Léopards batikali lisusu na libaku ya monene mpenza te mpo na koleta na 8e ya finales.

Bazali kobenda mokili ya groupe A na bilembo libungu tulu.

Egypte ekomi na esika ya yambo na elonga mibale, na bilembo 6.

Nsima na Pharaons ya Egypte, ezali nde ba Crànes ya Ouganda na bilembo 4, elonga moko na match nul moko, mercredi liboso ya ba Warriors ya Zimbabe.

Zimbabwe nde eye liboso ya RDC nsima na match nul 1-1 mercredi na ba Crànes.

Na match na bango ya mercredi, ba léopards bazwaki mongete ya yambo na 25' na Ahmed Elmohamady.

Mohamed Salah abakisaki mongete ya mibale na 43'.

Etikali match moko ya ba Léopards liboso ya Warriors.

Soki ba Léopards balongi na mingete mingi na macth etikali na ba Warriors ya Zimbabwe bakoki kozala ba 3e ya malamu mpe koleka.

XS
SM
MD
LG