Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Président ya Madagascar atiye avion mpo na match na ba Léopards


Basani ya Léopards nsima ya elonga na bango 4-0 liboso ya Warriors ya Zimbabwe na Caire, Egypte, 30 juin 2019.
Basani ya Léopards nsima ya elonga na bango 4-0 liboso ya Warriors ya Zimbabwe na Caire, Egypte, 30 juin 2019.

Président ya Madagascar Andry Rajoelina atiye mpepo mpo na komema pene na ba supporters nkama mitano na match ya 8e de finales mboka na ye ekobeta na Congo démocratique.

Match yango ekobetama o’mokolo ya eyenga na Alexandrie, na Egypte.

Tokundola ete ba Léopards ya Congo démocratique baleki lokola 2e meilleur 3e ya 16e de finales.

Kasi ba Barea ya Madagascar baye bazali kosala CAN na bango ya yambo bakamwisi kino sik’oyo.

Bazali bato bya yambo na groupe B, bapolisaki kutu Nigeria 2-0.

Kasi na bamatches eleka, RDC elonga mbala ebele liboso ya Madagascar.

Ba Barea babongoli mingi lisano na bango mpe basani na bango.

XS
SM
MD
LG