Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba Léopards ya RDC baleki na 8es


Basani ya Léopards ya RDC basepeli nsima na elonga na bango 4-0 liboso na Zimbabwe na Caire, Egypte, 30 juin 2019.
Basani ya Léopards ya RDC basepeli nsima na elonga na bango 4-0 liboso na Zimbabwe na Caire, Egypte, 30 juin 2019.

Equipe ya Congo démocratique eleki na 8es ya finale ya phase finale ya CAN 2019 na Egypte.

Ba Léopards bazali ba 2es meilleurs troisièmes na classement nsima na Syli national ya Guinée.

Classement ekobongwana te ata ba matches ya groupes E etikali.

Basani ya Congo démocratique bazali na 3 points na goal average 0.

Mboka esusu eleki ezali : Algérie, Cameroun, Egypte, Guinée, Côte d’Ivoire, Madagascar, Mali, Maroc, Nigeria, Sénégal mpe Ouganda.

Moponi ya ba Léopards alobi ete makambo manso mabandi ya sika.

Ndenge moko mpe lokola, Claude Leroy, moponi ya Léopards ya kala, akanisi été mbeba elongwe mpe Ibenge akomema basani baye mosika.

XS
SM
MD
LG