Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Moto akufi mpe ndako nzike eziki na moto na Bukavu


Bato bazali kolukaluka likolo na oyo etikala nsima na moto monene na Bukavu, Sud-Buaka, 1er juillet 2019.
Bato bazali kolukaluka likolo na oyo etikala nsima na moto monene na Bukavu, Sud-Buaka, 1er juillet 2019.

Elenge mwasi moko akufi mpe ndako nzike eziki na moto monene mopelaki o’mkolo ya eyenga na Bukavu, na Sud-Kivu, eyebisi AFP.

Moto myango mopelaki ntango bato bazalaki kosepela na Bukavu elonga ya ba Léopards ya RDC 4-0 liboso ya Warrios ya Zimbabwe, na phase finale, na Caire, Egypte.

"Elenge mwasi moko ya mibu sambo akufi na boziki kati na moto, bato misato bazoki mpe ndako 159 eziki," elobi makambi ya commune ya Kadutu, Gérard Munyole na AFP.

Kolanda moko ya baye ya protection civile, Aimé Lubago, moto myango mobandaki na ndako ya mama molambi mikate moko pene na moteki carburant oyo azalaki na bidons zomi ya essence.

Mwana mboka Munyole akanisi ete mabota 400 nde mazangi esika ya kolala.

XS
SM
MD
LG