Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Procureure ya CPI abongisi limpinga mpo na kokita kotala bobomani na Ituri


Fatou Bensouda procureure ya CPI (Cour pénale internationale), La Haye, Pays-Bas, 8 juillet 2019.
Fatou Bensouda procureure ya CPI (Cour pénale internationale), La Haye, Pays-Bas, 8 juillet 2019.

Procureure ya Cour Pénale internationale Fatou Bensouda ayebisi ete azali kotinda limpinga na Ituri mpo na bolukiluki na ntina ya bobomami bozali kokoba na etuka eye.

"Limpinga moko ya bureau na ngai likokita na RDC ntango makambo matali nkokwoso ya bokonongono ya COVID-19 makopesa nzela," elobi procureure Bensouda na lisakolami libimisami na site internet ya CPI.

Procureure ya CPI akebisi ete bobobami bozali kosalama na Djugu na Mahagi na Ituri, bokoki kozala mbeba eye akoki kosambisa.

"Makambo mazali kosalama makoki kozala mbeba eye ezali na nse bokonzi Cour pénale internationale (CPI)", etalaka, ekomi Mme Bensouda.

Procureure Bensouda akundoli na mangomba mpe babundi ete CPI elandelaka makambo ya Ituri wuto 2004.

Bato bayambo baboloko na CPI bawutaki Ituri, lokola ba Thomas Lubanga, Matthieu Ngudjolo, Germain Katanga…

Lingomba lya basimba minduki CODECO (Coopérative pour le développement du Congo) efundami na koboma bato 300 wuto ebandeli ya mobu mpe bato 20.000, kolanda sango ya ONU.

"Sango tozwi elobi bitumba na ba civils. Bitumba byango bikomi makasi ba sanza miye na ba territoires mingi ya Ituri," ekomi Mme Bensouda.

"Bitumba byango bisalami mpe na na camps ya bakima minduki mpe na communautés oyo balandamaki," elobi procureure ya CPI.

"Sango yango elakisi bobomami mpe bokatami ya ba civils, kati na bango bana mike, bokangami mpe bobomami ya bato na bozangi bosambisami mpe libanda na misala mya bosembo, mbeba ya kozwa basi, bilenge basi mpe mibali na makasi mpe kotala bato na lolenge moto azali mwasi to mobali," elobi lisakoli lya Mme Bensouda.

CPI elobi mpe ezwi sango ya bopunzami ya ndako mingi mpe ya ndako ya l’Etat.

CPI esengi bakonzi ya RDC na ba sungi ba bango kokoba kosala makasi mpo na kobatela ba civils mpe biloko bya bango mpe kozwa mikano misengeli mpo na kopekisa makambo ya boye masalama lisusu nsima.

XS
SM
MD
LG