Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

John Numbi na ba officiers basusu koleka 80 ya Lubumbashi bapesami mitindo ya kokende Kinshasa


FILE - Former Kinshasa police chief, John Numbi, speaks while in court, Jan. 27, 2011.
FILE - Former Kinshasa police chief, John Numbi, speaks while in court, Jan. 27, 2011.

Bakonzi ba mapinga ma RDC bapesi mitindo na ba officiers bazali na Lubumbashi kasi bazali nae bonga te kozonga na Kinshasa. Général John Numbi, inspecteur general ya ba FARDC azali mpe kati na bango.

Mitendo myango mipesa makasi le 8 mars, kolanda mikanda VOA Lingala emonaki.

Ba officiers yango basengami kozonga na Kinshasa mpo batikala ntango eyebani te.

Nzokande officier ya ministère public azali kosala boluki likolo na général Numbi wuta ba policiers babale basusu batatolaki na VOA Lingala ete bazalaki na bobomi ya babundi ba makoki mabomoto Floribert Chebeya na Fidèle Bazama.

"Bisika balobaki ete nzoto ya Fidèle Bazama ekundama etiama na bokengi mpe tozali kozela," elobi na ministre molandi ya Bosembo, Bernard Takahishe.

ONG ACAJ na babutundi basusu ba makoki ma bomoto balobaki ete gén. Numbi akimaki na Zibambwe wuto koleka mposo mibale.

"Nakoki kotala likambo ya bolandeli général Numbi kaka soki officier ya ministère public asengi yango, kasi sik’oyo tokikolaba likambo ya koluka ye te to ya kosenga bozongisami na ye mboka," elobi M. Takahishe.

Nzonkande, pene na ba officiers basusu batindami wuta Kinshasa mpo na kosala bokengi kuna.

XS
SM
MD
LG