Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Liwa lya Chebeya na Bazana: Basambeli bafundi general Djadjidja na Numbi


Ba ONG bazali kosenga bosambisami bwa général John Numbi, mpo na liwa ya mobundi ya makoki maboto Floribert Chebeya in January 2010.
Ba ONG bazali kosenga bosambisami bwa général John Numbi, mpo na liwa ya mobundi ya makoki maboto Floribert Chebeya in January 2010.

Basembeli ba partie civile basakoli ete bafundi ba généraux "Djadjidja" na John Numbi mpe ba policiers baye babomaki babundi ba makoki ba bomoto Floribert Chebeya na Fidèle Bazana, kolanda litatoli boko na ba policiers basalaki na ba medias lokola VOA Lingala.

"Esengeli bosambisami bwango bozongela ndenge mobeko molobi. Haute cour militaire ekoki kosambisasa ba généraux. Me Peter Ngimi awuti kofunda général Djadjidja, Kasi général oyo akozala ye moko te. Akozala na John Numbi," elobi Me Richard Bondo, ya Avocats sans frontières liboso lya bapanzi sango.

Me Peter Ngomo akundoli ete na sanza ya libwa, bafundaki major Christian Ngoyi Kenga Kenga, commandant ya bataillon Simba ya police nationale mpo ete asamba na auditeur général mpe na mokambi ya Haute cour militaire.

Major Ngoyi akangamaki na septembre na Lubumbashi.

Elongo na Me Bongo, Me Ngomo asengi ete bosambisami bwango bomema sika na Haute cour militaire.

Bana ya Floribert Chebeya, mokeli mpe mkambi ya VSV (Voix des Sans Voix) na ya mosungi wa ye Fidèle Bazana, balobaki mpe na visioconférence wuto bisika bakima mpe basengaki ete sembo esalama.

XS
SM
MD
LG