Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba Léopards bakoki koleka na 8e de finales


Britt Assombalanga (G) na Meshack Elia ya ba Léopards ya RDC bazali kosepela nsima ya mongete ya minei liboso ya ba Warriors ya Zimbabwe, na CAN 2019, Caire, Egypte, 30 juin 2019.
Britt Assombalanga (G) na Meshack Elia ya ba Léopards ya RDC bazali kosepela nsima ya mongete ya minei liboso ya ba Warriors ya Zimbabwe, na CAN 2019, Caire, Egypte, 30 juin 2019.

Basani ya Congo démocratique balongi 4-0 ba Warriors ya Zimbabwe dimanche na Caire na phase finale ya Coupe d’Afrique des nations.

Elonga na bango etieyi bango na esika ya koleka, kasi bakosengela kozela ba 3es ya ba groupes misusu bayebana.

Ba Léopards bazali 3e ya groupe A, na 3 points, na zéro goal average.

Na esika tozali, Guinée ya groupe B azali 3e, akokisi 4 points, na +1 goal average, na 3 matches.

Esengeli kozela Afrique du Sud nsima na match na ye lundi na Maroc. Afrique du Sud ezali na 3 points, na goal average zéro. Kasi ezali na match moko ekobeta.

Kenya mpe lisusu ezali kati baye bazelami. Kenya ekobeta lobi na Sénégal. Kenya ezali 3 points na goal average -1.

Na match bango balongi na ba Warriors ya Zimbabwe, ba Léopards bafungolaki mongete na 4’ na Jonathan Bolingi. Cédrick Bakambu atiyaki mbala mibale, na 34’ mpe na 65’ (pénalty). Britt Assombalanga nde asukisaki na 78’.

XS
SM
MD
LG