Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Champion du monde ya boxe Jr. Ilunga akomi na Kinshasa


Junion Ilunga Makabu, champion du monde ya boxe ya WBC Silver, na bozongi na ye na Kinshasa, 21 juin 2019. (Facebook/Djwindowsmix Kamba)
Junion Ilunga Makabu, champion du monde ya boxe ya WBC Silver, na bozongi na ye na Kinshasa, 21 juin 2019. (Facebook/Djwindowsmix Kamba)

Champion du monde ya boxe ya WBC Silver, catégoie lourds léger, Junion Ilunga Makabu akitaki vendredi na Kinshasa.

Ayambamaki na bakonzi ya fédération de boxe.

Bato bayike bapesaki ye losako na nzela ntango azalaki kokatisa engumba mokonzi ya RDC nsima na bobimi na libanda ya mpepo.

Tokutandola ete mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi apesaki ye losako.

Président Tshisekedi akomaki na Twitter ete Junior Ilunga azali "ndagisa mpo na ba Léopards mikolo miike yambo na CAN 2019".

"Ozali lolendo ya Congo démocratique," elakisi Tweet ya #PrésidentRDC.

"Longonya na Junior Ilunga, elombe ya molongo ya lourds légers WBC. Moko na bilembo ya lokumu ya koleka ya Noble Art," ebakisaki Tweet esalamaki le 17 juin nsima na elonga ya mobeti bitobu.

Junior Ilunga alongaki o’mokolo ya le 16 juin 2019 etumba liboso ya mobeti bibotu to boxeur ya Russia Dmitry Kudryashov na KRK Ouralets ya Lekaterinbourg na Russia.

XS
SM
MD
LG