Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bitumba kati na baye ya UDPS na ya FCC


Baye ya PPRD batamboli na Kinshasa pene na Assemblée nationale, Palais du peuple, Kinshasa, 12 juin 2019. (Facebook/Je suis Ramzani Shadary)
Baye ya PPRD batamboli na Kinshasa pene na Assemblée nationale, Palais du peuple, Kinshasa, 12 juin 2019. (Facebook/Je suis Ramzani Shadary)

Ndako ya CNC, Congrès national congolais, lingomba ya député Pius Muabilu, ya FCC, epunzami mpe ezikisami ntango baye bomanoni lokola baye ya UDPS basali mobulu.

Police ekomaki esika eye na mwa nsima, ebeti gaz lacrymogène.

Ndenge moko mpe police ebetaki gaz lacrymogène mpo na kokabola balandi ya PPRD mpe ya UDPS baye babundaki na boulevard Sendwe na Kinshasa.

Balandi ya PPRD, lisanga ya mokonzi ya kala Joseph Kabila, bawutaki na Palais du peuple, ndako ya Parlement libanda na esika wapi batelemaki mwa ntango mpo na kopesa maboko na ba députés na bango.

Kasi mikolo mibale mileki, baye ya UDPS, lisanga ya mokonzi ya mboka Felix Tshisekedi, bango mpe basalaki mobulu liboso ya Assemblée nationale, bakangaki nzela mpe bapekisaki ba députés nationaux kokota.

Baye ya UDPS bazalaki kopamela bososoli ba députés basalaki na miko ya président Félix Tshisekedi maye matiyaki baye ya Conseil d’administration ya Gécamines mpe SNCC.

Nzokande rapporteur ya Assemblée nationale, Célestin Musau Kalombo, asengi na ngambo mibale kozala na kimya. Baye ya PPRD batikelaki ye mokanda ya bosenga na bango. Lobi loleki baye UDPS basalaki mobulu lisusu na Lubumbashi na Haut-Katanga.

XS
SM
MD
LG