Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

CENI ezongisi candidature ya Mukumadi mpo na maponami na Sanukuru


Lambert Mende moko ya ba candidats ya maponami ya mokambi ya etuka ya Sankuru, awa na VOA, Washington, le 31 janvier 2018
Lambert Mende moko ya ba candidats ya maponami ya mokambi ya etuka ya Sankuru, awa na VOA, Washington, le 31 janvier 2018

CENI, Commission électorale nationale indépendante, ebisimi liste ya suka ya baye bakowelela maponami ya bakambi ya bituka ya Sankuru na  Sud-Ubangi. Epesi mpe linaka lya yango ya sika mpo na maponami na bisika niye.

Mpo na Sankuru, CENI ezongisi candidature ya Joseph Stéphane Mukumadi lokola indépendant oyo akondongwana na Lambert Mende ya PPRD na maponami ya mokambi ya Sankuru maye makosala le 10 juillet 2019.

Tokundola ete matata mabimaki nsima na bolongoli candidature ya M. Mukumadi. Moto akufaki mpe biloko ebel ebebaki. Yango etindaki kopusa maponami maye.

Koswana ezalaki kati na misala ya bosembo.

Na mokano na yango, CENI etali meko ya Conseil d’Etat ya le 27 mars 2019 moye mozongisaki candidature ya M. Mukumadi na moninga wa ye ya liste mpo na ebonga ya vice-gouverneur.

CENI etalaki mpe meko moye moboyaki bilembo ya maponami ya Sud-Ubangi.

Maponami ya gouverneur na Sud-Ubangi mpe mokasalama kaka le 10 juillet wana.

Campagane electorale nde ekobanda mpo na bitiku babale biye le 4 juillet mpe ekosuka le 8 juillet.

XS
SM
MD
LG