Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

DG ya Office des routes asimbami, ya FPI ayanoli na parquet

Président Félix Tshisekedi (2e G) na ministre ya Finances, Sele Yalaghuli, bazali kosolola na DC ya Safricas, David Blattner (4e D) na DG ya Offices des routes, Mutima Sakrini (1e G), na chantier moko ya Saut-de-mouton, Kinshasa, 14 février 2020. (Faceboo

DG ya Office des routes, Mutima Sarkini, asimbami jeudi na misala ya bosembo mpe oyo ya FPI (Fonds ya promotion industrielle) ayanoli na mituna ya bazuzi mpo na misala ya botongi ya mikolo nkama ya bokonzi ya président Félix Tshisekedi.

M. Sakrini akomi moto ya misato ya kosimbama na bolukiluki bozali kosalama likolo na misala miye milekisi mikolo nkama mpe misili te to mingi mibandi ata nanu te.

Américain David Blattner, DG ya Safricas mpe Libanasi Jamal Sammith ya Somibo bango mpe batiamaki na boloko ya Makala.

Kasi mikolo miike yambo na bokangami na ye, M. Blattner akomaki mokanda na mbulamatari mpo kolimbola ntina nini misala mitelamaki mpe ndenge nini OVD (Office des voiries mpe drainage) epesaki ye marchés ya kotonga ba sauts-de-moutons. M. Sammith nde esengalaki atonga ndako to logements sociax.

Jeudi 27 février, DG ya FPI mpe ayanolaki na mituna ya parquet général ya Kinshasa/Matete.

Molebeli ya DG ya FPI, Elvis Ngwala ayebisi Top Congo FM ete parquet elingaki koyeba ndenge misolo mipesamaki na ba 13 projets oyo FPI etalaka.

XS
SM
MD
LG