Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Etats-Unis ebakisi 23,4 millions $ ya lisungi mpo na bitumba na Ebola


Bilili bipesami na MSF bimonisi moto moko kozwa mangwele ya bokono bwa Ebola na Goma, Nord-Kivu, 14 novembre 2019.
Bilili bipesami na MSF bimonisi moto moko kozwa mangwele ya bokono bwa Ebola na Goma, Nord-Kivu, 14 novembre 2019.

23,4 millions $ nde mosolo Etas-Unis ebakisi na nzela ya USAID (agence na ya USA mpo na mambi ya ntombwa-développement) na ntina ya kosunga bitumba na bokono bwa Ebola na monyele ya RDC. Lisungi lya llipesami ntango mikolo mizali kotangama mpo na bosakoli ya suka ya Ebola na RDC.

"Ata makasi masalami mpe motango mwa bakoni mokiti mingi mpenza, bitumba bisili te mpe nkwokoso ya bitumba ekomi mpasi likolo na COVID-19," eyebisi USAID na liyebisi.

Yango ememi na 340 millions $ misolo USA epesa wuto libandela lya bokono boye na août 2018, eye esangisi lisungi ya misala mya etuka eye ya Afrika ne bikolo bizala nzinganzinga.

Nzokande mbulamatari ya Etats-Unis esilakobimisa 600 miollions $ mpo na kopesa maboko na makasi bakanzi bazali kosala elongo na basungi basusu mpo na kosukisa Ebola.

Mikolo mya Ebola mizali kotangama na monyele ya RDC nsima na lobiko ya mokoni ya suka.

Ebola ezongaki lisusu na Beni mikolo mileki nsima mwa mpe na sanza moko na ndambo ya kozanga babeli.

Mokoni moko akima esika lya lisungi mpe amonana te kino koleka mposo mibale.

XS
SM
MD
LG