Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Biden alaki na Macron kozongisa boyokani makasi na OTAN na UE


Joe Biden, oyo amonani kozala molongi ya maponami ma Etats-Unis, azali kosala lisikulu na Wilmington, Delaware, 9 novembre 2020.
Joe Biden, oyo amonani kozala molongi ya maponami ma Etats-Unis, azali kosala lisikulu na Wilmington, Delaware, 9 novembre 2020.

Joe Biden oyo amonani kozala molongi ya maponami ma Etats-Unis ayebisi président Emmanuel Macron ya France ete alingi azongisa boyokani makasi na OTAN mpe na Union européenne.

M. Biden asololaki na nzela ya singa, mbala ya yambo, na M. Macron wuto bilembo bimonisaki ye bo’ molongi.

"Basololaki mpe mpo na lolenge bakosala elongo mpo na kobundisa bokono bwa COVID-19, likama lya bomati bwa moto na mokili, bokengi mpe ntombwa ya Afrika," elakisi liyebisi lya bayi M. Biye.

Mikolo mileki, M. Macron atindelaki maloba kopesa losako nae longa ya M. Biden.

Kasi président Donald Trump oyo azali na libonga na Etats-Unis, azali kokoba koboya bilembo bya maponami mpe asengi na bazuzi kokata likambo lya mbeba mingi mpe moyibi alobi amoni na maponami ma le 3 novembre.

M. Trump akitisaki boyokani na OTAN na Union européenne.

Politiki ya M. Trump ezalaki ya kotiya Amerika yambo.

XS
SM
MD
LG