Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Pentagone ekati malakisi ya basoda ya Mali mpo baike bazali na bokweyisi bokonzi ya IBK


Ba Commando ya Senegal bazali kosala ngalasisi na malakisi mapesami na Amerika pena ma Po, Burkina Faso, 22 février 2019.
Ba Commando ya Senegal bazali kosala ngalasisi na malakisi mapesami na Amerika pena ma Po, Burkina Faso, 22 février 2019.

Petangone, ministère ya Défense ya Etats-Unis, ekati malakisi epasaka basoda ya Mali nsima sango elobi ete baike kati na basado baye bazali kati na baye babotoli bokonzi na Mali.

"Kino bolukiluki bokosila, malaksi masusu makopesama te na Mampinga ma Mali" (Fama, Forces armées Maliennes), eyebisi VOA molobeli ya Pentagone, Lieutenant Colonel Anton T. Semelroth.

Sango yango elobi ete colonel Assimi Goita azalaki kati basoda batombokaki mardi 18 aout 2020, bakangaki président Ibrahim Boubacar Keïta (IBK) elongo na bayi mbulamatari na bakambi basusu ya mampinga.

IBK asakolaki, na bokangami, ete atiki bokonzi ntango azalaki nanu na mibu mibale mpo na kosilisa mandat na ye.

Kolanda Pentangone, Col. Goita alandaki maetye ma U.S. Africa Command Flintlock, akendaki mpe na Florida (Etats-Unis) mpo na likindo lya mboka mibale (Mali-Amerika) na Université Speciale ya ba Operations.

Col. Goita alandaki mpe mateya ma Program on Terrorism mpe Security Studies na College C. Marshall na centre européen na Allemagne.

Président Donald Trump mpe mbulamatari ya Etats-Unis batelemelaki bokweyisami ya IBK mpe bazali kosenga bozongisami bwa ye na ebonga.

CEDAO, lisanga lya bikolo ba Afrika ya west lokola mpe Union Africaine na Union européenne mpe bapameli yango mpe basengi bonzingi bwa IBK.

XS
SM
MD
LG