Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mokonzi ya Mali Ibrahim Boubacar Keita atiki mosala


Président Ibrahim Boubacar Keïta ya Mali na Bamako, 31 juillet 2020.
Président Ibrahim Boubacar Keïta ya Mali na Bamako, 31 juillet 2020.

Ibrahim Boubacar Keïta, mokonzi ya Mali, atiki bokonzi nsima na kokangama elongo na Ministre wa ye wa yambo mpe bakonzi basusu ba mampinga na ba civils na maboko ma basoda batombokaki lobi loleki na Bamako.

Asakoli yango na liskulu na television nationale ya Mali.

"Nalingi ata litanga ya makila moko te litanga mpo na kotikala na nga na bokonzi. Yango, na sakoli ete nati mosala. elobi IBK.

Akangamaki na baso baye botombokaki mpe amemaki na camp ya Kati.

Basoda bango bakangi mpe Ministre wa Yambo Boubou Cissé na bakonzi basusu ya mampinga mpe ya ba civils.

XS
SM
MD
LG