Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Basoda batomboki bakangi Ibrahim Boubacar Keita mokonzi ya Mali


Ibrahim Boubacar Keita kati na basoda na Goa, Mali, 7 novembre 2019.
Ibrahim Boubacar Keita kati na basoda na Goa, Mali, 7 novembre 2019.

Président Ibrahim Boubacar Keita akangami na baso baike batumbokaki wuto ntongo ya mardi na Bamako, na Mali.

"IBK akangami. Basoda batokakaki batie ye 'auto-blindé" mpe bamemi ye," elobi correposndant ya VOA Afrique na Bamako.

Ministre wa yambo Boubou Cissé, ye mpe akangami elongo na tata mokonzi ya Mali.

Basoda batombakaki na ba camps mingi.

Bakangaki bakonzi ba bango mpe ba bayi mbualamatari baike mpe ba memaki bango na camps Kati.

Kino sika, emonanaki te malamu soki ezali "coup d'Etat".

Moto moko te andimaki ete akweyisi bokonzi.

Wuto mwa basanza, baike na Mali bazalaki kokita o'balabala mpe ko senga bolongwi ya IBK mpe koboya apesa nkombo na maponami ma mokonzi ya mboka mpo na mbala misato.

XS
SM
MD
LG