Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Basoda baye bazwi bokonzi na Mali balaki kosalisa maponami na lombango


Bakambia ba bontomboki ya basoda bakweyisi président Ibrahim Boubacar Keïta na bokonzi na Bamako, Mali, 19 aout 2020.
Bakambia ba bontomboki ya basoda bakweyisi président Ibrahim Boubacar Keïta na bokonzi na Bamako, Mali, 19 aout 2020.

Basoda baye bakweyisi na bokonzi Ibrahim Boubacar Keita na Mali balaki kozongisa mboka na kimya mpe na nzela na lombango mpe kokamba mboka na transition mpo na maponami kala mingi te.

Molobeli na bango, colonel-major Ismael Wague asakolaki ete bazali Commision to Misala mya lobiko ya bana ya Mali.

Ayebisi ete basalaki mosala moye mpo na kobatela Mali nakokweya na mobulu makasi.

"Mali ekweyi mingi na nse mpo na mobulu mikolo nyonso mpe bozangi bokengi likolo na baye bazalaki kokamba mboka. Démocratie ya solo etambolaka te na mayuya to na goigoi ya bakonzi baye basengeli nde kobatela bonsomi mpe bokengeni ya bana mboka," elobi col-Maj. Wague.

Lobi, na butu boleki, président IBK asakolaki ete atiki bokonzi mpe abomaki parlement.

Kasi alobaki yango nsima na kokangama na baso baye bakangaki mpe Ministre wa yambo, bakanzi basusu ba mbulamatari mpe ya mampinga. Ban aya Mali bazalaki mikolo minso na balabala wuto mwa ntango mpo na kosenga bolongwi ya IBK.

Basoda baye balobi eloko te mpe etali IBK.

XS
SM
MD
LG