Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Foto ya touriste ya mondele amemami na tipoy ebendi nkanda


Basali ya parc ya Virunga bamemi toursite ya mondele likolo ya tipoy, na foto ebimisa na Ley Uwera/Finbarr O'Reilly, 26 août 2019. (Twitter/Ley Uwera)
Basali ya parc ya Virunga bamemi toursite ya mondele likolo ya tipoy, na foto ebimisa na Ley Uwera/Finbarr O'Reilly, 26 août 2019. (Twitter/Ley Uwera)

"Okanisa ete tozali naino ntango ya ba colonisateurs" : wana nkanda ya ba internautes mpo foto ya touriste moko ya mondele amemami na tipoy na ba Congolais, na bomati ngomba ya Nyirangango.

Foto yango ezwamaki mpe ekabolamaki na instagram o’mokolo ya eyenga na photo-reporter ya Grande-Bretagne mpe Canada Finbarr O'Reilly. Na foto yango, ba Congolais banei bamemi touriste ya mondele moko likolo na tipoy na parc ya Virunga, pene na Goma, na Nord-Kivu.

Photographe yango ayebisi AFP na nzela ya instagram ete "touriste yango azalaki ebosono te (hancicapé te) mpe akakoki komata ngomba ye moko.

"Bilenge biye basalaka na parc lokola bamemi (porteurs)," elobi photograph O'Reilly. "Bazali motoba, mpe bafutamaka 100 dollars," ebakisi pjotograph.

Foto yango ememami mobulu te kasi epesi nkanda na internautes bayike.

"#RDC parc des Virunga @gorillacd esengeli eyoka nsoni na kondima ete ba #touristes bafuta mosolo mpo na komema lolengo loye. Okanisa ete tozali na ntango ya colonisateurs," akomi photo-journaliste ya Congo démocratique Ley Uwera.

Internaute mosusu ye mpe apaleli misala myango miye mizali kolakisa ndenge baye ya mposo mondele bazali kokonza likolo ya bayindo.

"Tondimaka yango mpo na baye bazali na nkwokoso na nzoto, baye bakokoka kotambola malamu te na nzela ya parc etonda mabaku," eyanoli misala ya kopanza sango ya parc.

Komata ngomba ya Nyirangongo, 3.470 km, esengelaka esalama elongo na baye bayebi nzela. Ezwaka ngonga 8 to 10. Mikolo makasi mpe bana ya mike to baye bazali nzoto bokolongono te bapesameli nzela ya komata yango te.

VOA/AFP

XS
SM
MD
LG