Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Rwanda esali contrat ya 400 millions $ mpo na ko produire gaz méthane na lac Kivu


Lava na Lake Kivu, Goma, Nord-Kivu, le 19 janvier 2002.
Lava na Lake Kivu, Goma, Nord-Kivu, le 19 janvier 2002.

Gouvernement ya président Paul Kagame ya Rwanda elobi ete etie mokoloto na mokanda ya 400 millions mpo na kobimisa gaz méthane na Lac Kivu mpe kotiya yanga milangi mpo na koteka.

Boyokani yango mosalami kati na compagnie ya Amerika Gasmeth Ernegy mpe ba hommes d’affaires ya Nigeria mpe ya Rwanda. Ezali mpo na mibu sambo.

Rwanda ezali déjà na ba compagnies mibale maye mabimisaka gaz na lac Kivu liye likabolami na RDC.

Gaz méthane ekoki kozala lokola lolitiki too energie.

Ngambo ya RDC, eloko moko esalami naino te mpo kobenda gaz liye.

Gaz yango ekoki mpe komema likama ntango ya volcan mpe koboma bato soki etikali kaka lac, elobi banganga ya mayele.

XS
SM
MD
LG