Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

FARDC elobi ebomi mokambi mosusu ya ba FDLR Jean-Michel Africa


Ba FARDC na bitumba na Mboko, au Sud-Kivu, 10 novembre 2009.
Ba FARDC na bitumba na Mboko, au Sud-Kivu, 10 novembre 2009.

Mampinga ya RDC, FARDC eyebisi ete ebomi mokambi mosusu ya batomboki ya FDLR (Forces democratiques pour la libération ya Rwanda) Jean-Michel Africa.

Liyebisi ya mampinga ya ekolo Congo démocratique elobi ete ba FARDC babomaki o’mokolo ya mposo na Nord-Kivu, na ndelo ya Ouganda, Musabimana Juvenal oyo ayebani lokola Jean-Michel Africa,

"Nsima na bitumba makasi… nde ye elongo na babateli baye minei basukisami," ekomi molobeli mampinga ya FARDC na etuka eye, major Guillaume Ndjike Kaiko.

Kolanda makomi ma ye, mampinga mazali kokoba misala na bango na territoire ya Rutshusuru na ntina ya kosilisa mangomba ya basimba minduki.

Na sanza ya libwa, mampinga ya RDC babomaki mpe lokola mokabi ya likolo ya ba FDRL Sylvestre Mudacumura oyo alukamaki na CPI (Cour pénale internationale) wuto sanza ya sambo ya 2012.

Kigali ebengaki liwa ya M. Dacumura sango elamu mpo na komema kimya na etuka ya Grands lacs.

Mampinga ya RDC mabandaki misala minene ya kobengana basimba minduki na suka ya sanza libwa. Ba FARDC basengaki mboka nzinganzinga kokangela basimba minduki to batomboki baye nzela ndelo na bango.

XS
SM
MD
LG