Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bisaleli ya bitumba na Ebola biyibami na Kisangani


Mosali ya bokolongono azali kopesa mangwele ya Ebola na elenge mobali na Goma. Nord-Kivu, 1 août 2019.
Mosali ya bokolongono azali kopesa mangwele ya Ebola na elenge mobali na Goma. Nord-Kivu, 1 août 2019.

Bisaleli ya bitumba na bokono ya Ebola biyibami na engumba ya Kisnagani, eyebisi bakambi ya bokolongono.

Kati na bisaleli biye, thermoflash mpo na komeka na mosika moto ya nzoto ya bato, chlore mingi mpe milangi ya mangwele ya fièvre jaune mpe ba données statistiques nyonso ya kobatela na Ebola mabungi, elobi Dr Paulin Muteba, mokambi ya Mabongisi ya bopeto ya etuka ya Tshopo.

"Tozalaki na ba themoflash libwa, moko ekufaki mpe moko eyibami, " elimboli Dr. Muteba.

Na thermoflash, basali ya bokolongono bakoka te kotala moto ya nzoto ya bato koleka nkoto zomi na mitabo baye bawutaka na Ituri, mpo koleka bato 20.000, bilembo bikozala malamu te, ekebisi Dokotolo Muteba.

Biloko biye bibungisami o’mokolo ya mibale ntango misala ya bosembo mibimisaki na makasi basali ya l’Etat na ndako moko epayi wapi bazalaki.

Dr. Muteba ayebisi mpe ete likambo loye likopekisa ete misala ya kobatela baton a libanda ya mpepo ya Kisangani mikosalama malamu te.

Kisangani, engumba ya bato millions 16 ezali na 480 km ya Beni. Eyambaka bato ebele kowuta Ituri mpe Beni esika wapi Ebola ezali kongala.

XS
SM
MD
LG