Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mwasi na mobali moko bakosambisama mpo na ko "checkula" ministre ya Brazzaville na Paris


Police ekangi moto moko ya moyindo na Paris, France, 3 juin 2010.
Police ekangi moto moko ya moyindo na Paris, France, 3 juin 2010.

Misala mya bosembo ya France mindimi ete mobali na moko na mwasi moko bakosambisama mpo ba "checkulaki" to babendaki na moyibi misolo na compte bancaire ya ministre moko ya Congo-Brazzaville.

"Batindaki misolo na moyibi mbala 60 to 75 wuto compte ya ministre kino na compte moko na Royaume-Uni, na Irlande, na Autriche mpe na France," elobi moko na bayi bolukiluki.

Nkombo ya bato bango epesami te lokola mpe eye ya ministre oyo azalaki na ebonga ntango ya bazalaki koyibaka ye.

"Misolo kino 400.000 euros nde mibendamaki na moyibi," elobi moyi bolukiluki.

Mwasi yango, na mibu 43, asi akangamaki mpo moyibi mosusu ya lolenge wana, azwaka na maboko maye koleka nkoto zomi (10.000) ya ba euros kowuta na compte bancaire ya ministre, elobi journal Le Parisien eye ebimisaki sango yambo.

Mwasi akangamaki mpo likambo lyango le 31 mars, mobali nde, na mibu 41, azwamaki le 10 mai na ndaku na ye na Sein Saint-Debus, nzinganzinga na Paris.

Baque Société générale nde efundaki mpe bolukiluki bosalami ba Brigade ya fraudes to moyibi.

Mobali yango awangani kasi mikanda mya lokuta mpe ba téléphones portables to "tshombo" minei mizwami na ndaku na ye.

XS
SM
MD
LG