Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Misala mya sembo ya France misakoli ete nzoto ya Kolelas elakisi ete akufaki na COVID-19


Guy-Brice Parfait Kolelas azali kobunda na liwa ntango ya maponami
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:00:43 0:00

Guy-Brice Parfait Kolelas azali kobunda na liwa ntango ya maponami

Parquet ya Bobigny na France elobi ete nzoto ya Guy-Brice Parfait Kolelas emonisi ete akufaki na COVID-19. Ndimbola yango epesami ntango bayi lingomba ya M. Kolelas, candidat ya présidentielle oyo akufaki na France butu bolandaki maponami na Congo-Brazza, basengaki bolukiluki mpo na liwa lyango.

M. Kolelas azalaki kati na bato sambo bazalaki kowela maponami ma mokonzi ya mboka, akufaki butu bolandaki maponami le 21 mars 2021, nsima na komema na lombango na France mpo na koluka lisali.

"Autopsie esalamaki le 23 mars 2021 etalisi mbeba cardio-respiratoire (ya motema mpe ya mpema) eye ewutaki na pneumopathie diffuse (bokono ya poumon) ya makasi na ngambo ibale eye elandi lolenge minganga ya Congo baye bamonaki nde COVID-19," elakisi liyebisi lya misala mya bosembo ya France.

Nzokande moko na bakeli mibeko ya France Sebastien Nadot abeti ntembe mpe asengi na bakonzi ba France kolandela liwa lye malamu.

Présiden Denis Sassou N'Guesso alongi maponami mango na 88,57 % mpe alandaki na M. Kolelas, na 7,8 %, esakolaki mardi na mpokwa ministre ya mambi ma Kati ya ekolo mpe ya Décentralisaton, Raymond Zéphirin Mboulou na télévision ya mboka, Télé Congo.

Mokolo na maponami, M. Kolelas abimisaki vidéo (bililingi) eye elakisi ye na mpasi mpe na bisaleli ya kosunga kopema. M. Kolelas azalaki kosenga bana ba Congo kokende kopona ye mpo azalaki kobunda na liwa mpo na COVID-19.

M. Kolelas akufaki butu bwango ntango mpepo ememaki ye esemaki na libanda lya mpepo ya France.

Kasi balandi baye balobi na Congo Brazzaville ete bato basusu nde babomi mpe basengaki na nzela ya ba media, bolukiluki na bakonzi ya France.

XS
SM
MD
LG