Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sassou alongi maponami na 88,57%


Président Denis Sassou N'Guesso nsima na koponama na Brazzaville, 21 mars 2021.
Président Denis Sassou N'Guesso nsima na koponama na Brazzaville, 21 mars 2021.

Denis Sassou N’Guesso, oyo azali na bokonzi wuto  mibu tuku misato na motoba, alongi maponami ma mokonzi ya mboka masalamaki o’mokolo mwa eyenga, le 21 mars, 88,57%.

Bilembo bya maponami mango bisakolami na Ministre ya Intérieur mpe ya Décentralisation, Raymond Zéphirin Mboulou na télévision ya mboka, Télé Congo.

Denis Sassou N’Guesso alongi pene na ba département nyonso na bilembo bya likolo. Ezali basiki Denis Sassou N’Guesso azawi nkama likolo na nkama.

Elonga ya Sassou N’Guesso ekamwisi mpenza te.

Kasi Commission ya boyokani na bikolo bya bapaya ya Sénat ya Etst-Unis ekebisi ete boponami mbala esusu ya président Denis Sassou N’Guesso evanidsa makasi bokonzi ya mabe mpe ya nkanza na Afrika.

Ba Sénateurs baye basengi kolandela malamu bokonzi ya bapengwisi mpe ya baye bazali kopekisa démocratie.

Nzokande Departement d’Etat esepeli ndenge maponami masalami na kimya mpe elaki kozala na Bana ba Congo-Brazzaville.

Bana ba Congo-Brazzaville baponaki mingi o’mwa eyenga eleki.

Guy-Brice Parfait Kolelas oyo akufaki na bulu bolandaki maponami na France na COVID-19 epayi amamemaki na lombango, alandi Sassou na bilembo kasi ya nse mpenza.

XS
SM
MD
LG