Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mwasi moko ya Québec azosambisama mpo atindelaki mokanda na poison na Trump


U.S. President Donald Trump talks to reporters as he departs for campaign travel to Ohio from the South Lawn at the White House in Washington, Sept. 21, 2020.
U.S. President Donald Trump talks to reporters as he departs for campaign travel to Ohio from the South Lawn at the White House in Washington, Sept. 21, 2020.

Mwasi moko ya Québec, na Canada, azali kosambisama na New York epayi wapi akangamaki mpo na kotindela président Donald Trump mokanda batia poison na kati.

Pascal Ferrier, na mibu 53, afundami mpo na kolaka kosala mabe na M. Trump.

Na mokanda atindelaki M. Trump akomi ete azwi nkombo ya sika mpo na ye mpe asengi ye kokoboya kowela bokonzi na maponami makoya le 3 novembre 2020 mpo abebisi Amerika.

Mme Ferrier akomi ete atindeli M. Trump "likabo moko ya motuya" na kati ya envellope mpe soki yango esimbi te akoya ye moko na monduki kosilana na M. Trump.

Mosambeli ya Mme Ferrier nde alobaki na kosambisama mpe asengi tribunal spécial eye ekosala le 28 septembre.

XS
SM
MD
LG