Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Conseiller ya kala ya Trump, Steve Bannon akangami


Steve Bannon, mopesi toli ya kala ya trump Trump, na Washington, 8 novembre 2019.
Steve Bannon, mopesi toli ya kala ya trump Trump, na Washington, 8 novembre 2019.

Mopesi toli ya kala ya président Donald Trump, Steve Bannon akangami, mpo na mbeba ya kopengwisa misolo mya botongi efelo na ndelo na Mexique. Donald Trump alobi ayebi ntina bakangi ye te.

Bato basusu basatu.bakangami elongo na M. Bannon.

"Campagne M. Bannon asalaki na nzela ya internet na nkombo ya 'Totonga efelo' ebimisaki 25 millions $ kasi baye bafundami basalelaki yango mpo na kotondisa mabenga mabango," elobi ba procureurs.

"Nayebi eloko moko te na mabongisi ma bango," ekomaki na lombango président Trump na compte Twitter na ye.

Steve Bannon alongwaki na ebonga na ye ya mopesi toli ya M. Trump na sanza ya mwambe ya 2017.

XS
SM
MD
LG