Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Monusco ekokanga ba bureaux mpe antennes biyike mpo na mbongo ekiti


Soda ya kimya moko azali kokanga ekuke ya lopango ya Monusco na Kinshasa, le 10 avril 2017.
Soda ya kimya moko azali kokanga ekuke ya lopango ya Monusco na Kinshasa, le 10 avril 2017.

Ba bureaux mpe ba antennes biyike ya Monusco bikokanga likolo na bokitisi mbongo ya budget mpo na eleko ekoya, eyebisi représentante ya kalaka mokonzi ya Nations unies na Congo démocratique, Mme Leila Zerrougui.

Ba bureaux mpe ba antennes byango bizali na ouest (Matadi, Mbandaka, Bandundu et Mbuji-Mayi), na Katanga, sud-est (Lubumbashi mpe Kamina) mpe na nord-est, na Ituri (Dungu).

Bokangami yango bokokende kino le 30 juin.

"Bazali na bosenga na biso mingi mpenza bisika biye ba groups armés bazali. Kuna nde tosengeli kozala," elobi Mme Zerrougui.

Monusco ezali na RDC banda mibu 20. Elobaki soki bakokondisa budget ba kitisa yango na 100 millions ya ba dollars mpo na eleko ekokende banda le 1er juillet 2019 kino le 30 juin 2020.

XS
SM
MD
LG