Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Basoda ya Monusco bakoki kobanda kolongwa na 2022


Basoda ya Monusco nal Kinshasa, 10 avril 2017.
Basoda ya Monusco nal Kinshasa, 10 avril 2017.

Basoda ya Monusco bakoki kobanda kolongolama malembe malembe na ekolo Congo démocratique soki bakonzi ya mboka eye balandi nzela epesameli bango, elobi rapport moko ya ONU epesami na Conseil ya Securité.

Kati makambo masengami ezali na transition responsable mpe efficace etali ba institutions mpe ba intérêts géopolitiques, na kotalaka te mambi ya misolo.

Makambo masato makolakisa ntango nini bolongwi ya Monusco bokoki kosalama.

Ya yambo, makambo ya likonzi etali mpeza misala ya Monusco yango moko.

Ya mibale, makambo maye matali kimya mpe bokengi makolanda ngambo nyonso ya baye bandongwanaka na ekolo eye.

Mpe ye misato, mondele ya motane moye mokoki komema Monusco kozonga nsima na mokano na yango ya kolongwa. Rapport yango elakisi te na bozindo soki ndelo ya motane yango ezali nini.

Makambo mango makobanda kotalama ntango na ntango. Soki mbongwana bakonzi Congo démocratique bazali kosala bokeyi malamu mpe na lombango, ONU ekoki kolongwa yambo ya suka ya 2022, elakisi rapport yango.

Mobu ya yambo. Motango ya ba Casques bleus to basoda ya Monusco mokotikala ndenge moko. Nsima na yango, bolongwi ya basoda ya ONU ekosalama na etuka ya Tanganyika mpe Kasaï.

Monusco ekotikala mingi mpeza na Kivu mpe Ituri, mobu ya mibale.

Mpe na mobu ya misato, bolongwi bonso bokoki kosalama.

Nsima na Monusco, mission ya mambi ya politiki ya ONU nde ekoki kotiyama mpe kosunga RDC na oyo etali politiki mpe makoki ya bomoto. Ekozala na bapesi toil bayike, kolanda mokanda mopesamaki na Conseil ya sécurité.

Monusco ezali sik’oyo na basoda 16.000 mpe misolo na yango ezali pene na milliars moko ya ba dollars.

XS
SM
MD
LG