Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mokonzi ya kala ya Mali Amadou Toumani Touré awei na mibu 72


Président ya kala ya Mali Amadou Toumani Touré na bozongi na ye na Bamako, Mali. 24 décembre 2017
Président ya kala ya Mali Amadou Toumani Touré na bozongi na ye na Bamako, Mali. 24 décembre 2017

Ayebanaki mingi lokola ATT mpo na misala mya transition démocratique na mboka na ye.

Président ya kala ya Mali Amadou Toumani Touré akufi buku boleki na mibu tuku sambo na mibale na Truquie.

Akotaki lopitalo nsima na kozwa lipaso mbala mingi na motema, elobi bayi libota mpe ba dokotolo.

Ayebani mingi lokola ATT mpe mpo na misala mya transition démocratique na mboka na ye.

Kasi bokoti na ye na bokonzi na 1991 bozalaki mpe libandela lya mobulu ya bokengi Mali ekota na yango kino sika na badongolo meso.

ATT avandaka na kiti ya bokonzi mbala mibala, na 1991 kino 1992 mpe na 2002 kino 2012. Kasi alongolamaki na bokweyisami na basod.

Azalki soda ya kala kasi mingi na Mali bazali kotala lokola moto asukisaki bokonzi ya makasi to dictature na 1992….

Na Congo mibale (RDC mpe Congo-Brazzaville), bato baike batindi maloba ya kokanisa ye. Kati na bango Martin Fayulu, moko na bakambi ba Lamuka mpe mokonzi ya ECIDE, alobi ete ATT azalaki "panafricaniste ya monene mpe azalaki na makasi mpo na RDC".

XS
SM
MD
LG